Songtexte.com Drucklogo

Molimo Songtext
von Moise Mbiye

Molimo Songtext

Nakola na maboko na yo
Nayekola na kelasi na yo eh
Mosungi moko oyo bapesi nga
Eza se yo molimo mosantu
Motema na ngai ezoka ba pota ah
Ba trahisons na ba jugements ya bato
Je me suis rélèvé na nguya na yo eh
Kotika nga te nzela eza nanu molayi

Molimo oh
Molimo na Nzambé
Akita awa na se
Lisungi na nga oh
Molimo oh
Molimo na Nzambé
Akita awa na se
Lisungi na nga oh


Mobokoli na ngai
Kelasi na nga oh
Na silisi nanu koyekola te
Zala na nga nanu
Masolo na ngai
Oyo elongola nga pongi
Na betela yango nani yaya
Na lingi yo mingi
Masolo na ngai oyo ekitisa nga moto
Na betela yango nani yaya
Lobela nga nanu

Molimo
Molimo na Nzambé
Akita awa na se
Lisungi na nga oh
Molimo
Molimo na Nzambé
Akita awa na se
Lisungi na nga oh

My God
Molimo mosantu azo mema biso na dimension moko oyo
Mayele ya bomoto eko ko expliquer te
Mutu oyo akeleli, asundolami, afingami, azangeli
Mais ozo mona mutu yango azo lala na kimia azo lamuka na kimia
Molimo mosantu azo memela biso kimia oyo mokili eko ko expliquer te
Yango na lingi lelo otombola maboko
Oyemba makasi elongo na nga loba na zelaka yo


Na zelaka yo eh
Loba lisusu nazelaka yo (na zelaka yo eh)
Encore plus fort na zelaka yo (na zelaka yo eh)
My Lord (na zelaka yo eh)
Na zelaka yo eh
Tongo na pokwa eh (na zelaka yo eh)
Butu na moyi ah (na zelala yo eh)
Na zelaka yo Shilo (na zelaka yo eh)

Na lingaka yo eh Yésu (na lingaka yo eh)
Na lingaka yo Yésu (na lingaka yo eh)
Bolingo ya bomuana eh (na lingaka yo eh)
Na lingaka yo eh (na lingaka yo eh)
Na lingaka yo eh Yésu (na lingaka yo eh)
Otalaka mitema Yésu (na lingaka yo eh)
Verifiez ya ngai Yésu eh (na lingaka yo eh)
Okuta bolingo eh (na lingaka yo eh)

To fanda elongo yaya (to fanda elongo eh)
To fanda elongo yaya eh (to fanda elongo eh)
Pembeni na yo yaya (to fanda elongo eh)
Mayi na bomoyi eh (to fanda elongo eh)
To fanda elongo eh (to fanda elongo eh)
To fanda elongo papa (to fanda elongo eh)
To fanda elongo Shilo eh (to fanda elongo eh)
To fanda na biso oh (to fanda elongo eh)

Nazala ya yo Yésu (nazala ya yo eh)
Nazala ya yo papa eh (nazala ya yo eh)
Nazala ya yo Shilo eh (nazala ya yo eh)
Nazala ya yo Yésu (nazala ya yo eh)
Basusu bateka molimo (nazala ya yo eh)
Basusu basimba kisi (nazala ya yo eh)
Yo ndé makasi na ngai (nazala ya yo eh)
Nazala ya yo eh (nazala ya yo eh)
Yo ndé bolingo na ngai (bolingo na yo eh)

Bolingo ebimisa nga tongo tongo (bolingo na yo eh)
Bolingo elamusa nga 3h00 du matin (bolingo na yo eh)
Eh bolingo na Yésu (bolingo na yo eh)
Bolingo ebimisa nga retard (bolingo na yo eh)
Bolingo oyo elalisa nga libanda (bolingo na yo eh)
Bolingo oyo ekata nga ba pongi (bolingo na yo eh)

My Lord
Nazala ya yo Shilo oh
Nazala ya Yésu
Nazala ya yo eh
Nazala ya yo papa eh
Nazala ya yo Shilo oh
Nazala ya yo Yésu
Nazala ya yo papa eh

Songtext kommentieren

Log dich ein um einen Eintrag zu schreiben.
Schreibe den ersten Kommentar!

Quiz
Wer will in seinem Song aufgeweckt werden?

Fans

»Molimo« gefällt bisher niemandem.