Songtexte.com Drucklogo

Kamba Ngai Songtext
von Aimé Nkanu

Kamba Ngai Songtext

Tala ngai na miso na yo ya mawa
Simba ngai na loboko na yo ya nguya
Mema ngai esika elingi yo Nzambe
Nakoki te kotambola ngai moko
Limbisa ngai na mabe nionso nasala
Yoka mawa, nazali se muana
Mema ngai esika elingi yo Nzambe
Nakoki te kotambola ngai moko

Mema ngai, kamba ngai
Yesu ngai moko nakoki te
Mema ngai, kamba ngai
Yesu, na nzela na yo
Mema ngai, kamba ngai
Yesu ngai moko nakoki te
Mema ngai, kamba ngai
Yesu, na nzela na yo


Soki yo te, nakokende lisusu wapi?
Yo nde y′ozali na bomoyi
Po ete nzela na yo, etondi na mabaku kofingama
Nakoki te kotambola ngai moko
Soki yo te, nakokende lisusu wapi?
Mokili eboyi ko yoka nga
Et pourtant nzela na yo, etondi mabaku, komekama
Nakoki te kotambola ngai moko

Mema ngai, kamba ngai
Yesu, ngai moko nakoki te
Mema ngai, kamba Ngai
Yesu, na nzela na yo

Eh Papa, kamba Ngai
Eh Papa, kamba Ngai
Y'ozali lisungi ezangaka te na tango ya pasi
Eh Papa, kamba ngai
Nakoki te Yahwe simba ngai, bomba ngai eh Yawhe
Eh Papa, kamba Ngai
Y′osungaka bato, na baye babungisa elikya Yahwe
Eh Papa, kamba Ngai
Soki otiki ngai, nakokweya, nakobunga, eh Yahwe


Eh Papa, kamba ngai
Y'ozali lisungi ezangaka te na tango ya pasi
Eh Papa, kamba ngai
Nakoki te Yahwe simba ngai, bomba ngai eh Yawhe
Eh Papa, kamba ngai
Y'osungaka bato batchiolama, babungi se elikya Yahwe
Eh Papa, kamba ngai
Soki otiki ngai, nakokweya, nakobunga, eh Yahwe
Eh Papa, kamba ngai
Eh Papa, kamba ngai

Songtext kommentieren

Log dich ein um einen Eintrag zu schreiben.
Schreibe den ersten Kommentar!

Quiz
Whitney Houston sang „I Will Always Love ...“?

Fans

»Kamba Ngai« gefällt bisher niemandem.