Songtexte.com Drucklogo

Nabimi molongi Songtext
von Moise Mbiye

Nabimi molongi Songtext

Na yaki na mawa, na zongi n′esengo
Asali ya mingi, hi, ih-ih, hi
Nini yango ya malonga akuti kati na ngai
Po akanisa nga, ah-ah-ah
Na lingi ye mingi, na pesa ye nini?
Na sili mayele, eh, eh-eh
Fongola ata lola bangelu ba kita
To yemba po na yo, oh-oh-oh

Ba longolaki nga na liste
Tango lipamboli eyaki
Ba lukaki bazua kiti na nga
Lola e reclamer kaka ngai, eh
Offrandes na nga na ba sacrifices
Ako bosana ngo té

Na zalaki kaka n'elikya
Na yebaki ekosimba, ah


Nabimi molongi
Elekeli mokili, bakomi kutuna
Na sali ndenge nini, moto lokola ngai
Nawuta na nga na pasi
Nzambe ya lola akaniseli ngai, eh
Nabimi molongi
Elekeli mokili, bakomi kotuna, oh
Naza ya libota nini, moto lokola ngai
Famille na nga ya pauvre
Nzamb′a lola akaniseli ngai, ngai pe

Ya Nzambe, ya Nzambe
Naza ya nzambe
Victorieux, victorieux
Je suis victorieux

Ba lekaki nga na makasi
Ba lekaki ngai na kitoko, eh
Ba lekaki nga na ba relations
Ba lekaki nga na mbongo, eh

Mokolo lola efunguamaki, ngolu ekitelaki epa na ngai
Ah, yah, yah-yeah
Na zalaki kaka n'elikya
Na yebaki ekosimba, ah


Nabimi molongi
Elekeli mokili, ba komi kotuna, oh
Naza ya libota nini, moto lokola ngai
Famille na nga ya pauvre
Nzambe ya lola akaniseli ngai, eh
Nabimi molongi
Elekeli mokili, ba komi kotuna, oh
Na lekeli nzela nini, moto lokola ngai
Nawuta na nga na pasi
Nzambe ya lola akaniseli ngai, eh

Nabimi molongi
Elekeli mokili, ba komi koloba, oh
Ngai na simbi kisi moto lokola ngai
Na luka ye na ba ngomba, eh
Nzambe ya lola akaniseli ngai, eh
Nabimi molongi
Elekeli mokili, ba komi koloba, oh
Na kanga ye na kisi, muasi lokola nga
Na mikaba na losambo
Nzambe ya lola a imposé kaka ngai, eh

Nabimi molongi
Elekeli mokili, ba komi koloba, oh
Na yibi mbongo ya l'état moto lokola ngai
Nawuta na nga na village
Nzambe ya lola a élèvé kaka ngai
Nabimi molongi
Elekeli nga moko, kombo na ngai
Ekomami na lola, ah, moto lokola ngai
Na sala masumu ebele
N′ekulusu akufeli kaka ngai, ngai pe

Eh-eh, eh-eeh, mbano, ho-ooh
Ya nzambe, ya Nzambe
Naza ya nzambe

Na yaki na mawa na zongi n′esengo
Asali ya mingi, ih-ih-ih
Nini yango ya malonga akuti kati na nga
Po akanisa nga aaa
Na lingi ye mingi, na pesa ye nini?
Na sili mayele, eh, eh-eh
Fungola ata lola bangelu bakita
To yemba po na yo, oh-oh-oh

Na yaki na mawa, na zongi n'esengo
Asali ya mingi, hi, hi-hi, hi
Nini yango ya malonga akuti kati na nga?
Po akanisa nga, ah-ah-ah
Na lingi ye mingi, na pesa ye nini?
Na sili mayele, eh-eh-eh
Fungola ata lola bangelu bakita
To yemba po na yo, oh-oh-oh

Songtext kommentieren

Log dich ein um einen Eintrag zu schreiben.
Schreibe den ersten Kommentar!

Quiz
Wer ist gemeint mit „The King of Pop“?

Fans

»Nabimi molongi« gefällt bisher niemandem.