Songtexte.com Drucklogo

Soki Yo Te Songtext
von Aimé Nkanu

Soki Yo Te Songtext

Ngai oyo ngai oyo
Ngai oyo soki yo te
Mbele nakoma nani?
Mbele nasuka wapi?

Na mbeto ya lopitalo
Baninga bandeko bakimi nga
Liwa ekomami na ekuke
Ya bomoyi na nga
Mbele nakoma nani?
Mbele nasuka wapi?
Esika mayele ya bato esuki ya yo ebandi
Yango natatoli
Yesu y′ozali Nzambe


Na libota ya mpasi
Kelasi esilaki te
Nionso na nga ya mpasi
Ndele na nga molili
Mbele nakoma nani?
Mbele nasuka wapi?
Kasi y'opesi nga tina
Pe nga namoni muinda
Yango natatoli
Yesu y′ozali Nzambe

Na kati ya bisengo ya mokili
Nabungaki nzela
Natiaki kondima na ngai na mbongo
Na ba ndako ya molili
Mbele nakoma nani?
Mbele nasuka wapi?
Obengi nga osukoli nga
Na makila na yo

CH: Yango natatoli, Yesu y'ozali Nzambe
S: Osalaka manso na tango na yo tika nakumisa yo
CH: Yango natatoli, Yesu y'ozali Nzambe
S: Baseka nga batiola nga o changea histoire ya vie na nga
CH: Yango natatoli, Yesu y′ozali Nzambe
S: Banguna na nga batikali na soni
CH: Yango natatoli, Yesu y′ozali Nzambe
S: Olokotaka na fulu, osukoli opesi tina
CH: Yango natatoli, Yesu y'ozali Nzambe
S: Yango natatoli, Yesu y′ozali Nzambe

Songtext kommentieren

Log dich ein um einen Eintrag zu schreiben.
Schreibe den ersten Kommentar!

Quiz
Welcher Song ist nicht von Robbie Williams?

Fans

»Soki Yo Te« gefällt bisher niemandem.