Songtexte.com Drucklogo

Rue D'Amour Songtext
von Koffi Olomidé

Rue D'Amour Songtext

Souci, yo souci
Ndéngé nini osalaka po obosana nga té
Est-ce que oyebaka nga na sóló ya nzóto?
Baninga ba tonda bisengo, yo otingama sé nga
Mbálá kama nga na changer ba ndako, mbala kama oko retrouver nga

Souci, yo souci
Ndéngé nini osalaka po obosana nga té
Est-ce que oyebaka nga na sóló ya nzóto?
Baninga ba tonda bisengo, yo otingama sé nga
Mbálá kama nga na demenager ba ndako, mbala kama oko retrouver nga

Sentiment, molema
Soféle ya ndéngé nini yango, yo ozali?
Ebongaki té okumba na rue d′amour
Tala o ye ko sukisa nga na kati ya impasse
Nzela'a bolingo eza sens unique, moto oko linga nde a ko décevoir yo


Sentiment, molema
Mopila ya ndéngé nini ango yo ozali?
Ebongaki te okumba nga na rue d′amour
Tala oye ko sukisa nga na kati ya libulu
Nzela'a ya bolingo eza sens unique, moto oko linga ndé ako décevoir yo

Mokóló wana bolingo ya lomingo
Na zelaki yo moninga na sé ya mbula
Oyaki té nga na zongaki na ngai na mawa

Mokolo wana mon amour ti na minuit eeeh
Na zelaki yo bolingo nzoto eko lenga
O yaki te nga na lalaki na nga na mabelé

Bongo eh, yemba esú
Ah ya bongo eh, mwana a tamboli bongo eh
Absence ya moto oyo olinga
Ekomisa yo lokola mwana ya etiké
Bolingo, bolingo
Oya chérie eeeh ekoteli nga na mikúwa
Bolingo ezali mbeli
Ya mino mibalé leló na lobi eko kuela yo
Lobi olobaki olingi nga
Leló oyo o tengami ata ndele yo oko banza ngaaa
Bongo aya bongo ayaaa
Ah ya bongo eh, mwana a tamboli bongo eh


Ih-mah, ah yoleli, ah yoleli eh-eh, bolingo
Tika ko lelisaka nga, ngai wa yo motéma pété
Bolingo to yokanaki ezali ya réciprocité
Oyo okomi'o sala nga leló eza ndéko té na l′amour
Ah yoh, ah yoleli eh, eh-eh-eh

Ih-mah, ah yoleli, ah yoleli eh-eh, bolingo
Tika ko lelisaka nga, ngai wa yo motéma pété
Bolingo to yokanaki ezali ya réciprocité
Oyo okomi′o sala nga leló eza ndéko té na l'amour
Ah yoh, ah yoleli eh, eh-eh-eh

Boko yebisá, oyo ezali pété
Tcha-tcho pété, Tcha-tcho pété
Tósimba motéma

Tcha-tcho
Tcha-tcho
Tcha-tcho

Pété, eh pété
Kwasa, eh kwasa
Pété
De toutes les façons qui guident Paris
Ils le jaserons toujours
Tcha-tcho, pété
Kwasa, pété
Pété, kwasa
Tcha-tcho, kwasa

Georgio Ndombasi
Eh bien, pour nous tu embrasses Rosedille
Tcha-tcho, eh pété
Kwasa, eh kwasa
Pété, eh kwasa
Pété, eh Tcha-tcho
Pété
Je-je-je-je fula mambu, fula mambu
Kwasa, pété
Tcha-tcho, Jean Baptiste Lusala
JP Moloba
Tcha-tcho, pété
Tcha-tcho, pété

Faute ezalí ya bolingo, ya bolingo
Faute ezalí ya sentiment, ya sentiment
Faute ezalí ya bolingo
Ba sœurs ya kilo, la reine Aminata

Songtext kommentieren

Log dich ein um einen Eintrag zu schreiben.
Schreibe den ersten Kommentar!

Quiz
Wer will in seinem Song aufgeweckt werden?

Fans

»Rue D'Amour« gefällt bisher niemandem.